Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moussa Mondo akosenga bobandelami ya bosambisami nsima na etumbu mpo na bobomi mwasi wa ye


Moussa Mondo, Vice-Ministre ya kala ya Petelelo ya ekolo Congo democratiki
Moussa Mondo, Vice-Ministre ya kala ya Petelelo ya ekolo Congo democratiki

Basambeli ba Moussa Mondo, vice-ministre ya kala ya ba Hydrocarbures mpe moyi PPRD, lingomba lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, basakoli ete akosenga bobandeli ya bosambisami bwa ye.

Basengi yango nsima na etumbu ya mibu ntuku mibale ya misala makasi to boloko ekatelamaki ye lobi na bosambi ya lombango mpo na liwa lya molongani wa ye, moyi ekolo Madagascar Alisa Khadidja.

Bazuzi bakatki ete abomaki mwasi wa ye na nko nsima na kobeta mpe kozokisa ye. Akangamaki mokolo mwa mosala mibale nsima komema mwasi yango na lopitalo nzoto etonda matutu mpe mpota.

Moussa Mondo awanganaki kobeta mwasi wa ye kasi bazuzi bayokela banzeneneke mpe mongongo ya masolo Alisa Khadidja azalaki na yango na libota lya ye.

PPRD mpe bayi lingomba lya ba musalame ya ba Chiite batelemisi ye na mosala mpo na yango.

Forum

XS
SM
MD
LG