Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC ekebisi Apple kosalela ba mines na yango Rwanda eyibaka



Ba avocats bayike liboso ya Palais du Peuple ya Lubumbashi, le 5 janvier 2017. (VOA/ Narval Mabila)
Ba avocats bayike liboso ya Palais du Peuple ya Lubumbashi, le 5 janvier 2017. (VOA/ Narval Mabila)

Ba avocats ya Ekolo Congo Democraituqe na Paris bafundi Apple kosomba na Rwanda, makele mazwami na mayuya wuta RDC.

Bakebisi Apple yambo na komema likambo liye na bazuzi. Basambeli baye balobi Rwanda ezali kolekisa mabanga ma ntalo mayibami na RDC na nzela ya molili mpe kokotisa yango na nzela makele matekamaka na mokili.

Bayi Apple France bayanoli na AFP ete kolanda mokanda babimisaki mobu moleki, bamoni ata eloko moko eye elakisi ete makele lokola Tin, Tungsten mpe wolo maye esalelaka mawutaka na bobesi misolo na mangomba ma masimba mandoki na Ekolo Congo Democratique to na ekolo nzinga nzinga.

Na avocats ya Apple bawangani ete compagnie eye etikala koteka technologie to biloko ekelaka na kosalela makele mawuta bisika bavandi bazali komona bwale ya bonyatami bwa makoki ma bomoto ma bango. Mokanda moye RDC etindeli Apple mokoki komema compagnie eye koyanola na bazuzi.

Forum

XS
SM
MD
LG