Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lolenge mosusu ya Mpox ya makasi koleka lozali kobomaka bana na RDC


Mama moko amemi mwana azali na kolokoto to "Monkeypox" na Kaka, Centrafrique, 18 octobre 2018.
Mama moko amemi mwana azali na kolokoto to "Monkeypox" na Kaka, Centrafrique, 18 octobre 2018.

Lolenge mosusu ya virus to nyama ya bokono bwa Mpox to kolokoto loye lomonisami kozala Makasi koleka ya yambo mpe loye lozali kopanzana mingi lozali kobomaka bana na Ekolo Congo Démocratique, ekebisi balukiluki. Jean-Claude Udahemuka, molukiluki na Universite ya Rwanda alobi na AFP ete komilengela mpo kotelemela virus eye ya lolenge ya sika yambo ete epanzana bisika misusu mpe ekoma mpasi.

Koleka bato nkoto yoko bazwamaki na Mpox na etuka ya Sud-Kivu ebandaki mbala, elobi mokambi ya bolukiluki na etuka eye, Leandre Murhula Masirika.

Koleka bato ntuku mibale bazali kozwama mikolo minso.

Esi ekomi mpe na bituka misusu lokola na Kinshasa.

Forum

XS
SM
MD
LG