Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bomeki coup d’état: Youssouf Ezangi alobi ete Christian Malanga asengaki bango kokanga Kamerhe mpo balakisa ye na Palais de la nation


Moyi ekolo Amerika Zalman-Polun (C) na avocat wa ye bavandi kati bafundami ya bomeki kokweisa bokonzi, na boloko ya basoda na N'Dolo, na kinshasa, 7 sanza ya motoba 2024.
Moyi ekolo Amerika Zalman-Polun (C) na avocat wa ye bavandi kati bafundami ya bomeki kokweisa bokonzi, na boloko ya basoda na N'Dolo, na kinshasa, 7 sanza ya motoba 2024.

Yousouf Ezangi, moyi ekolo Royaume-Uni oyo abotamaka moyi Ekolo Congo Démocratique, azalaki moto ya yambo ya kolimbola na mituna mya bazuzi na bosambisami bwa baye bakangamaki mpo na bomeki kokweyisa bokonzi na Kinshasa bosalamaki o’mokolo mwa zomi na libwa ya sanza ya mitano ya 2024 na Palais de la nation.

Alobi na bazuzi o’mokolo mwa mosala moko na boloko bwa basoda ya N’Dolo, na Kinshasa, ete Christian Malanga, mokambi ya bato ba mandoki baye basalaki mobulu mofundami bo’ koluka kokweyisa bokonzi, apesaki bango mitindo ete bakanga Vital Kamerhe (ministre ya kala ya mambi ma misolo oyo akoma sika mokambi ya Assemblée nationale) mpe bamema ye na Palais de la nation na ntina ete amonana na bililingi ntango ye (Christian Malanga) alingaki kopesa lisikulu lya ye.

Na mibu 53, Youssouf Ezangi oyo azalaka plombier na Londres, alobi akotunaki na Christian Malanga na 2016 ntango mokambi ya bato ba mandoki oyo akelaki lingomba lya politiki lya ye.

Alobi mpe lisusu ete alandaki kaka kolanda Christian Malanga na Palais de la nation kasi ayebaki te ntina nini bazalaki kokende kuna.

Nzokande, ministère public endimi yango te mpe elobi ete Youssouf Ezangi na Christian Malanga babongisaki elongo bomeki kokweyisa bokonzi boye.

Bayi bokengi babomaki Christina Malanga na mobulu mosalamaki na koluka kokweyisa bokonzi o’mokolo mwa zomi na libwa ya sanza ya mitano eleki na Kinshasa.

Kasi Yousouf Ezangi alobi mpe lisusu ete nsima na kokutana na Londres na Christian Malanga na 2016, bakutanaki lisusu na Swaziland yambo na komonana lisusu na Angola mpe kokende na RDC na libandela lya 2024 mpo na kokela lisanga lyoko na Bandundu.

Bato 51 bazali kosamba na likambo liye. Bayi ekolo Amerika basato, kati na bango mwana ya Chrsitain Malanga, Marcel Malanga. Ezali mpe na moyi Belgique mpe moyi Canada moko, bakisa na ye Youssouf Ezangi.

Soki bakweyisami na likambo, bakoki kopesama etumbu ya liwa.

Mokolo mwa bosambisambi mokoya motiami o’mokolo mwa mitano ya sanza ya sambo eye.

Forum

XS
SM
MD
LG