Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président Sissoko Embalo ya Guinée Bissau alobi makambo mazali na maboko ya mbulamatari


Président Umaro Sissoco Embaló ya Guinée Bissau na Paris, France, 11 novembre 2021.
Président Umaro Sissoco Embaló ya Guinée Bissau na Paris, France, 11 novembre 2021.

Président Umaro Sissoko Embalo ya Guinée Bissau amonisami na etando eke mpe alobi kimya ezali, nsima na bomeki ya bokweyisi bokonzi na basoda.

Makambo mazali na moboko ya mbulamatari, elobi M. Embalo.

"Nazali malamu, matondo na Nzambe. Makambo mazali na maboko ma mbulamatri," ekomi M. Embalo na Twitter.

Mobulu mozalaki na Guinée Bissau epayi wapi masasi makasi mayokanaki na ndako esika mokonzi ya mboka Umaro Sissoko Emballo na mbulamatari na ye bazalaki na likita.

Basoda babapnzanaki bisika mingi mpe misala, biteyolo mpe mimboko mikangaki na nsima ya nzanga na Bissau.

Cédéao (Lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya West) epemali oyo elobi ezali bomeki kokweyisa bokonzi.

“Cédéao epameli bomeki ya coup d’état mpe elobi basoda bakozala na mokumba soki likambo libe likomi na nzoto ya president Umaro Sissoko Emballo mpe bayi mbulamatari”, elobi liyebisi lya Cédéao.

Na ngambo na ye, kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guteress asengi, na liyebisi mpe lokola, ete “bitumba bisila na lombango” na Bissau mpe “botosi bopesama na ba misala mya l’état (ba institutions).”

Likambo lyango lisalami mikolo miike nsima na coup d’état esalami na Burkina Faso mpe na Mali, lokola mpe na Guinée mpe na Tchad.

XS
SM
MD
LG