Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Papa Francois apameli bakonzi ba Rdc na Communauté Internationale mpo na bobomi ya ba civili na monyele ya Rdc


Papa François (G) apesani mboka na président Félix Tshisekedi (D) na bokutani bwa bango na Kinshasa, RDC, 31 janvier 2023.REUTER
Papa François (G) apesani mboka na président Félix Tshisekedi (D) na bokutani bwa bango na Kinshasa, RDC, 31 janvier 2023.REUTER

Papa Francois atelemeli na Vatican, bobomi ya ba civili na monyele ya ekolo Congo democratiki.

Na ngonga ya losambo ya Angelus, Papa wa Roma apamelaki lobi loleki bobomi biye bizali kosalema na RDC.

Motomolo ya Eklezia katoliko atelemeli bakonzi ya ekolo Congo democratiki mpe communaute internationale mpo na bobomami yango.

Na motango ya bato bazali koniokwama, engebene na papa Francois, mingi bazali bakristo, babomami mpo na nkanda basusu baza na yango mpo na boyambi na bango.

Bazali ba martyrs! Bokufi na bango ebota mbumba mingi ya malamu. Yango ezali kopesa mpiko ya koteya na bopikiliki, esukisi papa wa Roma.

Forum

XS
SM
MD
LG