Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ekolo Congo democratiki esengi ete bitumbu ya bipesama na ntina ya ekolo Rwanda


Président Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo démocratique na bokutani na bana ba mboka na ye na Paris, 01 sanza ya mitano 2024. (Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo démocratique na bokutani na bana ba mboka na ye na Paris, 01 sanza ya mitano 2024. (Présidence RDC)

Mbulamatadi ya ekolo Congo democratiki esengi ete bitumbu ya nkita mpe ya bisambiselo bipesama na ntina ya ekolo Rwanda.

Sima ya lapolo ya ba nganga ya mayele ya ONU na maye mazali koleka na RDC, mbulamatadi ya ekolo Congo democratiki esengi na communaté internationale ete epesa bitumbu ya politiki, ya nkita mpe ya bisambiselo na ntina ya Rwanda mpe bakonzi na yango.

Na liyebisi lioko liye lisakolamaki lobi loleki, molobeli ya mbulamatadi mpe ministre ya communication mpe media, Patrick Muyaya, apesi eyano na lapolo ya lingomba ya ba nganga ya mayele ya Nations Unies na ntina ya RDC, eye etindamaki na mokonzi ya Conseil ya sécurité na suka ya sanza ya mitano mpe eye esakolamaki mokolo mua mwambe ya sanza eye ya sambo.

Lapolo eye, engebene na molobeli ya mbulamatadi, ezali komonisa na polele ete ekolo Rwanda ezali kobundisa RDC.

Forum

XS
SM
MD
LG