Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre wa yambo ya ekolo Israel apesaki lisikulu na ndako ya bakeli mibeko ya Amerika


President Félix Tshisekedi na masolo na Ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu ntango ya Likita linenen lya ONU, na New York, Etats-Unis, 22 sanza ya libwa 2023. (Twitter/Présidemce RDC)
President Félix Tshisekedi na masolo na Ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu ntango ya Likita linenen lya ONU, na New York, Etats-Unis, 22 sanza ya libwa 2023. (Twitter/Présidemce RDC)

Benjamin Netanyahu, ministre wa yambo ya ekolo Israel, alobaki ete na ngonga eye "tozali kosala makasi mpo na kozua bobimisami na bango (bakangemi) mpe nazali na kondima ete bokasi bonso bikoki kobota mbuma malamu, mingi na kati na yango na ngonga eye".

Oyo mbala ya mineyi - motango ya likolo mpo na mokonzi ya ekolo ya bapaya -komona M. Netanyahu asololi na Congrès to ndako ya bakeli mibeko, lokumu monene eye elengelamaka na ntina ya bakonzi ya bikolo baye bazali na mobembo na ekolo Amerika.

Lobi mokolo mua mineyi, akokutana na mokonzi Biden, na ye nde bazalaka na bondeko ya ndenge, mpo ete basolola mambi matali makambo mazali koleka na Gaza, mambi ma malonga maye masalemi na ntina ya kotika bitumba mpe na boyokani mpo na kobimisa bakangemi, engebene na ndako ya pembe.

Forum

XS
SM
MD
LG