Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Olympiques Paris 2024 tableau ya ba medayi ya wolo  emonisaki mosala ya makasi ba mboka ebele esalaki


Nageuse Stefan Sangala (G) ya Congo-Brazzaville azali kotala arbitre na mopanzi ya nageuse Aya Girard De Langlade Mpali ya Gabon na mokano ya 50 m na mayi na Jeux olympiques Tokyo 2020, Japon, 30 juillet 2021. (Photo by Jonathan NACKSTRAND / AFP)
Nageuse Stefan Sangala (G) ya Congo-Brazzaville azali kotala arbitre na mopanzi ya nageuse Aya Girard De Langlade Mpali ya Gabon na mokano ya 50 m na mayi na Jeux olympiques Tokyo 2020, Japon, 30 juillet 2021. (Photo by Jonathan NACKSTRAND / AFP)

Sima ya mokolo mua yambo ya masano ya Olympiques ya Paris 2024, tableau ya ba medayi ya wolo emonisaki mosala ya makasi ba mboka ebele esalaki.

Japon ezali kolonga na classement na ba medayi motoba ya wolo, mpo azali kolonga na masano ebele ya sports.

Ekolo France, mboka eye ezali koyamba masano, esali makasi mingi, na bokaboli esika ya mibale na ekolo Chine, ekolo Australie mpe ekolo Coree ya Sudi, ba medayi mitano na ekolo.

Bokokani boye ezali komonisa bowelani ya kafukafu mpe ba talenta ya ndenge na ndenge na kati ya bikolo.

Ekolo Amerika ezali kolanda na ba medayi ya wolo misato, na tango ekolo Grande Bretagne, Italie, Canada, Hong Kong mpe Allemagne bizuaki ba medayi ya wolo mibale.

Ba resultats biye bizali komonisa lokumu to bolongi na masano to ba disciplines ya ndenge na ndenge mpe bimonisi misala makasi ya mangomba ya basani to ba équipes.

Momekano ya basi to tournoi de football féminin ya masano ya Olympiques ya Paris ezali kokoba na bikolo Zambie mpe Nigeria biya bizali komonisa na lokumu nionso Afrika.

Na ngambo ya mibali, ekolo Maroc, Guinée, Egypte, mpe Mali bizali kaka mangomba ya basani ya Afrika biye bizali naino na bondongwani.

Mosani ya ekolo Congo democratiki ya bobeti bibotu to makofi, Marcelat Sakobi, akokende mosikate na masano ya Olympiques ya Paris 2024.

Moyi pujiliste ya RDC amonaki lelo ete masano po na ye mosukisamaki na 16e de finale na ba poids plumes ya basi. Abetamaki na 3-2 na Ousbek Sotiro Tourbekova.

Forum

XS
SM
MD
LG