Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lingomba ya bato mabe bamekaki ko tindika ekuke ya lopango ya Joseph Kabila

François Beya na tala ya moyindo, mopesi toli na mambi ya bokengi ya président Félix Tshisekedi, mokolo ya bolapi ndayi ya bokoti na bokonzi ya Félix Tshisekedi pene na Joseph Kabila mokonzi ya kala, Kinsha24 janvier 2019sa,

Makelele ya mandoki ya pete mayokanaki na tongo ya lelo na Kinshasa pene na ndako ya mokonzi ya kala Joseph Kabila ntango bato basimba mandoki bazalaki koluka kokota na lopango.

Engebene na Olive Lembe Kabila, lingomba moko ya bato mabe bamekaki ko tindika ekuke ya lopango, bazalaki na mandoki lokola ba cocktails Molotov mpe bazalaki na makanisi ya kosala mabe.

“Nayebi koloba te soko bazalaki mingi, kasi bilili biye bizuamaki na ngonga wana, elobaki Olive Lembe. Balingaki babwaka cocktails molotovs mpo na bazikisa mituka biye bizalaki wana, Olive Lembe asukisaki.

Makamba mana masalemaki sima ya molongani ya Kabila ko limbola bobuki mibeko to moyibi ya oyo babengi perimeter securitaire ya ndako ya mokonzi ya kala.

Forum

XS
SM
MD
LG