Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamala Harris andimi kowela maponami nsima na Convention ya ba démocrates


Démocrate mpe vice-pr♪0sident ya ekolo Amerika Kamala Harris azali kopesa lisikulu na mokolo mwa suka ya Convention ya démocratique na Chicago, Illinois, 23 sansza ya mwambe 2024.
Démocrate mpe vice-pr♪0sident ya ekolo Amerika Kamala Harris azali kopesa lisikulu na mokolo mwa suka ya Convention ya démocratique na Chicago, Illinois, 23 sansza ya mwambe 2024.

Kamala Harris, vice-présidente ya Ekolo Amerika andimaki o'mokolo mwa mosala minei bopesami mpifo ya bayi lingomba lya ye ya politiki na Convention ya ba démocrates na Chicago, na Illinois, mpo awelela maponami ma mokonzi ya ekolo o’mokolo mwa mitano mwa sanza ya zomi na moko ekoya.

Lisikulu lya ye lisukisaki mikolo minei mya likita linene epayi bayi lingomba lya ba démocrates bazwaki maloba, moko na moko, mpo na kopesa ye maboko na koloba ete ye nde asengeli koponama na ebonga ya mokonzi mpo na kokitana na Joe Biden oyo azali mpe lokola moko na ba démocrates.

Kamala Harris amilakisaki, na maloba ma ye, bo’ moto asalaka nde mpo na bato to mpo na bana mboka na ye.

Akundolaki ete abundaka makasi mpe alongaki mpo ete bato mingi babotoloma te ndako to bisika bya bango ya kovanda ntango azalaka mosambeli mpe moyi misala mya sembo.

Alobi mpe ete atelemelaki ba banques mpe amemaki na bokangami mpe bosambisama bakambi ya gangs to ya mangomba ma bayi mandoki mpo kokitisa bobomi bwa bato.

Abikisi ete abundelaka bato banso baye bazwa mpasi mpo na bozangi bosembo lokola basi baye bazwama na makasi.

Na ngambo na ye, Donald Trump, mbanda na ye ya ba répulicains, ye, akobaki bobeti ntangwa na ye na état ya Arizona.

Kasi wuto reseau social na ye Truth Social, mokonzi ya mbala ntuku minei na mitano ya ekolo Amerika Donald Trump apamelaki Kamala Harris koloba mingi kasi kosala mosala moko te mpe kobosana makambo maike lokola mpasi to bobola ya bayi ekolo pene na million ntuku motoba, kozanga kolobela na bozindo makambo lokola lotiliki, Chine, bitumba ya Ukraine na Russie mpe misusu.

Azalaki lobi loleki na ndelo na Mexique epayi alakisa ete Kamala Harris oyo apesamaki mosala mwa bobateli yango na baye bakotaka na mayuya asalaki mosala te kasi atikaki bikuke polele mpo bato mabe bakota mpe babanda kobomaka mpe kozwaka basi na makasi mpe kosala makambo masusu ndenge balingi.

Na Ngambo esusu, moko bayi libota lya ba Kennedy mosusu ya kala ya Ekolo Amerika, Robert Fancis Kennedy azali mpe kowelela maponami bo’ moto ya lingambo to ya ngambo moko te. Robert Francis Kennedy, na mibu ntuku sambo, azelami lelo na état ya Arzona.

Nzokande ba media ya ekolo Amerika elobi ete akosala lelo bomilongoli mpe bopesi maboko na Donald Trumo. Trump oyo asengeli kopesa meeting lelo na Arizona askoli ete akoyamba moto moko oyo akokamyisa bato. Ba Kenney mngi bazala bayi lingomba lya ba democrates mpe baboyi ete Robert Francis Kennedy akoba kowelela maponami.

Forum

XS
SM
MD
LG