Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump aboyi kosala bondongwani mosusu na Kamala Harris


VP démocrate Kamala Harris (G) na mokonzi ya kala républicain Donald Trump (D) na miso ya prés Joe Biden , New York, 11 sanza ya libwa 2024.
VP démocrate Kamala Harris (G) na mokonzi ya kala républicain Donald Trump (D) na miso ya prés Joe Biden , New York, 11 sanza ya libwa 2024.

Républicain Donald Trump mpe mokonzi ya kala ya ekolo Amerika asakoli ete bondgwani mosusu na mbanda na ye na maponami ya mokambi ya ekolo démocrate mpe vice-présidente Kamala Harris bokosalama te.

“(Débat) Bondongwa mosusu bokozala te,” ekomi Donald Trump na plateforme na ye Truth Social.

Donald Trump atie maloba maye elongo na bililingi to video ya bongwani bwa ye bosalamaki na sanza ya motba eleki na etando eke na président Joe Biden, mokonzi oyo azali na ebonga.

Républicain Trump andongwanaki mokolo mwa mosala mibale ya mposo eye na Kama Harris.

Kamala Harris akomi candidate to moweleli ya maponami ya ngambo ya ba démocrate nsima na Joe Biden kokika kowelela maponami kolanda elongi mabe alakisaki na bondongwa ni na Donald Trump.

Bayi linomba lya ba démocrates mingi basepalaki te na ndenge Joe Biden asalaki bondongwani yango mpe batiyaki mbamba mingi mpo été elongwa na boweli maponami.

Joe Biden nde asakolaki kotikela boweleli na Kamala Harris.

Ba républicains mingi mpe basepeli te na lolenge Donald Trump azalaki mpe ayanolaki na bondongwani na Kalama Harris.

Ezalaki mbala yambo nde Donald Trump na Kamala Harris bakutanaki miso na miso mpe bapesanaki mbote ya loboko.

Forum

XS
SM
MD
LG