Bato batano bakufi mpe basusu 25 bazoki makasi na Gisenyi, na Rwanda, engumba ekangana na eye ya Goma (RDC) epayi batomboki ba M23 bakotaki wuta mokolo mwa eyenga na bitumba na mampinga ma RDC.
Motango mwango mopesami na moko na balobeli ba mampinga ma Rwanda RDF.
"Bato batano bakufi mpe ntuku mibale na mitano bazoki makasi," pene na Gisenyi; "ezali mpe na baye bazoki mpota mike", ebakisi Ronald Rwivanga.
Mopanzi nsango moko ya AFP na Gisenyi alobi bitumba mingi bizala na ndelo kati na Randa na RDC epayi lokito mingi lozali koyokama na ngambo ya Rwanda.
Diplomates moko mpe andimi ete masasi mazalaki kobetama kati na bayi mampinga ma RDC na ya Rwanda na ngambo inso ya ndelo na Goma.
M23 eye esungami na RDF, ekotaki na Goma o mokolo mwa eyenga.
Forum