Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Batomboki ba M23 bazwi nzela ya Sud-Kivu


Molobeli ya basoda ya batomboki ba M23, major Willy Ngoma (C) na Goma, 29 sanza ya yambo 2025. (AP Photo/Moses Sawasawa)
Molobeli ya basoda ya batomboki ba M23, major Willy Ngoma (C) na Goma, 29 sanza ya yambo 2025. (AP Photo/Moses Sawasawa)

Batomboki ba M23 baye bapesami maboko na mampimnga ma Rwanda babandi kopusana kati na Sud-Kivu, mikolo misato nsima na kobotola engumba mokonzi ya Nord-Kivu, Goma.

Batombi ba M23 basi babotoli mboka mibale ya Sud-Kivu nsima na bitumba makasi na mampinga ma ekolo FARDC, kolanda bavandi ba bisika byango.

Bazwi bongo Kiniezire na Mukwidja o mokolo mwa misala misato, kolanda litatoli ya bavandi na AFP.

M23 "ekokoba (kopusana) na Sud-Kivu mpamba te Goma ekoki te kozala suka na ya makambo," eyebisi AFP, Vincent Karega, moko na ba diplomate ya Rwanda na etuka ya Grands lacs.

M23 esi ebotalaki Minova, na etando ya Kalehe, o mokolo mwa 21 ya sanza ya yambo.

Yambo na yango ezwaki Lumbishi na 170 km na Bukavu, engumba mokonzi ya Sud-Kivu o mokolo mwa 19 ya sanza ya yambo.

Forum

XS
SM
MD
LG