Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba makasi na Goma : batu 17 bakufi mpe pene na 370 bazoki


Mpepo moko ezali kokita na libanda lya mpepo ya Goma, Nord-Kivu, 26 sanza ya yambo 2025.
Mpepo moko ezali kokita na libanda lya mpepo ya Goma, Nord-Kivu, 26 sanza ya yambo 2025.

Bitumba bikobaki na bisika biike na Goma, na ndelo na Rwanda, kati na batomboki ba M23 baye bapesami maboko na Kigali na mampinga ma RDC, mpe bato 17 bakufi mpe pene na 370 basusu bazoki.

Lokito la manduki manene mpe ya mike loyokanaki kati ya Goma mokolo mobimba.

Na suka ya nzanga, bobeti masasi bokitaki mwa moke kasi bokobaki nzinga zinga ya libanda lya mpepo.

Mokambi ya CICR na Nord-Kivu alobi bituluku bya bato na ba mpota, mpe mingi nde ba civili, batondisami na mapitlo epayi bayi Croix rouge bazali kopesaka lisungi.

Baike ya basoda ba RDC bakatisi ngambo ya Rwanda mpe bamipesi na bakonzi ba ekolo eye, esakoli etando eke ya Rwanda mpe endimami na bayi ONU.

Basusu bakimi na nzela ya masuwa na lac Kivu.

Mbulamatari ya RDC elobi elingi "koboya kufa ya bato mingi", kolanda maloba ma molobeli Patrick Muyaya nsima na bokoti ya M23 na Goma.

Mokonzi ya Kenya mpe mokambi ya EAC, Likita lya bikolo bya Afrika ya est, William Ruto abengisi bokutani kati na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame na ya RDC ya Felix Tshisekedi o mokolo mwa mosala misato mokoya.

Conseil de paix mpe ya sécurité ya Union africaine ekozala na likita lya mbalakaka o mokolo mwa mosala mibale.

Na blikita lya kafukafu ya Conseil ya secruite ya mokolo mwa eyenga na New York, bikolo mingi bipamelaki Rwanda mpe bisengaki yango kolongla mampinga ma yango na RDC.

Tshisekedi na Kagame bakutanaki lisusu te na sanza ya zomi na mibale eleki na Luanda (Angola) mpo bayi RDC baboyaki masolo ya miso na miso na M23.

ONU elobi koleka bato 400.000 bakimi bitumba wuta ebandeli ya sanza ya yambo.

Forum

XS
SM
MD
LG