Mokano mwa Conseil ya sécurité ya ONU mondimamaki o mokolo mwa mosala mitano na New York na baye banso bazalaka kati na yango.
Ezali mokano mwa yambo ya lolenge loye, moye mondimami na ONU.
Mbongisi maye ma molongo mazalaki kino sika kaka kopamela nitumba kasi kotanga ekolo Rwanda te mpe kozwa mokano te.
Likita lya Bokengi ya ONU "epameli na makasi bitumba mpe bokobi kozwa bisika ya M23 na Nord-Kivu mpe Sud-Kivu na lisungi lya mampinga ma Rwanda," elakisi makano mwa yango.
Banganga mayele ba Monusco, misala mya ONU na RDC bakanisi ete Rwanda etindaki koleka basoda ba yango 4.000 kopesa maboko na batomboki ba M23.
Mokano mwango mosengi bolongwi bwa M23 na bisika babotoli lokola na engembu Goma mpe Bukavu mpe mosengi na mampinga ma Rwanda "kotika kopesa M23 maboko mpe kolongola na kozela te basoda ba yango na mabele ma RDC, mpe kotuna eloko te".
Forum