M23, lingomba lya batomboki baye bapesami mabokona Rwanda, esakoli ete endimi kosala masolo na mbulamatari kasi ezali na mitungisi mpo na ngambo bayi Kinshasa.
Masolo mwango masengeli kosalama o mokolo mwa 18 ya sanza ya misato ya 2025, kolanda misala mya president ya Angola Joao Lourenço.
M23 epesi losako na lisakolami lya masolo mango kasi elobi ezali mitungisi.
"Ezali mpenza litomba kotala na mokumba monso boboyi ya makasi ya bokonzi ya Kinshasa eye eloba polele mpe mbala na mbala ete ekotikala soki moke te kosolola na mabongisi ma biso. Maloba ya kala te ya molobeli ya bokonzi eye, M. Patrick Muyaya, malakisi polele bozali mosika ya M. Felix Tshisekedi Tshilombo na makanisi maye (ya masolo) ya Angola," ekomi na liyebisi molobeli ya politiki ya M23, Lawrence Kanyuka.
M23 esengi bongo ete president Joao Lourenço, mokonzi ya Angola, mokambi ya Union africaine mpe moyangeli ya babondi ya matata na est ya RDC, azwa yambo biyano na makambo maike.
Kati na yango, "Lotomo ya makasi ete M. Tshisekedi asakola polele mpe na ntembe te bomipesi bwa ye mpo na masolo ma miso na miso na mabongisi ma biso", elobi M23.
Batomboki basengi mpe ete M. Lourenço ayebisi na mokanda ngambo inso mpo ete masolo maye mpe makambo maye makolobama.
Basengi mpe pole epesama na mikano mizwamaki na likita ma bakonzi ba bikolo bya EAC mpe ya SADC lisalamaki mokolo mwa 8 ya sanza ya mibale ya 2025 na Dar Es Salam.
Forum