Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 na mbulamatari ya Kinshasa bakosolola mikolo mikoya, esakoli Luanda nsima na bokutani Lourenço-Tshisekedi


Mokonzi ya Anolga Joao Lourenço (G)na mokokani wa ye ya RDc Félix Tshisekedi na libongo lya Lobito, Angola, 4 sanza ya zomi na mibale 2024.
Mokonzi ya Anolga Joao Lourenço (G)na mokokani wa ye ya RDc Félix Tshisekedi na libongo lya Lobito, Angola, 4 sanza ya zomi na mibale 2024.

"Masolo ya miso na miso" makosalama mikolo mikoya kati na batomboki ba M23 na mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique, esakoli misala mya nsango ya ndako ya mosala ya président Joao Lourenço nsima na ye kokutana na mokokani wa ye ya RDC, Félix Tshisekedi o mokolo mwa mosala mibale.

"Ngambo ya Angola, bo mobondi ya matata maye masimbi est ya Ekolo Congo démocratique, ekosolola na M23, na ntina ete balakisi bilongi ba RDC na baye ba M23 bakoka kosala masolo ma miso na miso maye makosalama na Luanda mikolo mikoya, mpo na koyokana na mambi ma kimya ma libela," esakoli liyebisi lya présidence ya Angola.

M. Lourenço ayambaki na Luanda M. Tshisekedi o mokolo mwa mosala mibale mpe basololaki mpo na kimya na est ya RDC epayi batomboki ba M23 baye Kinshasa na ONU bazali kofunda kopesama maboko na Rwanda.

M 23 ezongalaki bitumba makasi wuta sanza ya yambo mpe ebotoli bingumba minene lokola Goma na Nord-Kivu na Bukavu na Sud-Kivu mpe bisika misusu.

Batomboki bazali kokoba kozwa bisika mingi.

Kino sika M. Tshisekedi na mbulamatari ya RDC bazalaki koboya kosolola miso na miso na M23 kasi sika bandimi yango.

Bokutani ya Lourenço na Tshisekedi bosalami mokolo moko nzima na mokonzi ya Angola koyamba limpinga lya ba episkopo ya katoliko (Cenco) na ya ECC (eklezia ya misioni) baye bazali komema makanisi ma Boyokani bwa kimya mpe kovanda elongo na RDC.

Kalaka mokonzi ya eklezia ya Misioni, matambwisi mpate Eric Nzenga akomi na compte X na ye ete ezalaki esengo kokokanisa makanisi na president Lourenço oyo azali mpe motomolo ya bokambi masolo ma kimya ma Luanda na Nairobi maye matiyami elongo sika.

Mposo moko moleki, ba episko ba katoliko mpe ya misioni bakutaki mpe lokola na Yoweri Kaguta Museveni mokonzi ya ekolo Uganda na Kampala.

Bakutani mpe na mpokwa yango na mokambi ya kala ya basimba manduki Thomas Lubanga oyo azali kofundama sika na ONU mpe na FARDC kopesama maboko na AFC/M23.

Mikolo mikoya, bakokutana mpe na mokonzi ya Zibambwe Emmerson Mnangagwa mpe na Evariste Ndayishimiye ya Burundi.

Basi basololaki na Paul Kagame ya Rwanda, William Ruto ya Kenya na Denis Sassou N’Gesso ya Congo-Brazzaville nsima na masolo bazalaki na yango na ngambo inso ya bana ba RDC kobanda na president Felix Tshisekedi.

Forum

XS
SM
MD
LG