Mokolo mwa 18 ya sanza ya misato ya mobu moye nde masolo kati na mbualamtari ya RDC na batomboki ba M23 makobanda, esakoli ndako ya mosala ya mokonzi ya Angola Joao Lourenço oyo azali motomolo ya babondi banso batiyami mpo na matata na monyele ya RDC.
Mokolo moye mosakolamaki mokolo moko nsima na Luanda kosakolo ete masolo kati na batomboki na Kinshasa makosalama mikolo mikoya.
"Kolanda misala misalami na ngambo ya bobondi (médiation) ya Angola (...) balakisi bilongi ba RDC na ya M23 bakobanda masolo ma kimya omokolo mwa 18 ya sanza ya misato na engumba Luanda", elobi liyebisi lya présidence ya RDC.
M. Lourenço oyo azali sika mokambi ya Unioin africaine ayambaki mokokani w aye ya RDC Félix Tshisekedi o mokolo mwa mosala mibale (11 ya sanza ya misato 2025) na Luanda mpe ayebisaki ete azalalaki kosolola na M23 mpo ete masolo masalama na mesa kati na ngambo ibale.
Kinshasa ezalaki kino yambo na yango koboya kovanda na mesa na batoomboki ata ko misala minso mya kimya, Luanda mpe Nairobi, mizalaki kosenga yango.
«Joao Lourenço abengisaki président Tshisekedi o mokolo mwa mosala misato na Luanda mpe asololaki ayebisaki ye likambo lyango. Boyebi eye president Lourenço azali mokambi ya babondi banso ya matata maye mpe azali kosala manso kolanda mokano (résoltuion) 2773 ya ONU moye mozali kosenga bolongwi ya mampinga ma Rwanda na batomboki ba M23 bisika bozwa. Akosala manso kaka na nzela ya mokano moye, » elimbolaki o mokolo mwa mibale molobeli ya mbulamatari ya RDC Patrick Muyaya liboso lya bapanzi nsango na Kinshasa.
Kolanda ndako ya mosala ya mokonzi ya Angola, balakisi bilongi ba Kinshasa na M23bazelami na Luanda na ba ngonga ekoya.
Forum