Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maponami ma 1er vp ya Assemblée nat. masalemi lisusu te mpo police ekangi nzela


Ba députés bazali libanda ya parlement nsima na police kokanga nzela, Kinshasa, 12 juin 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)
Ba députés bazali libanda ya parlement nsima na police kokanga nzela, Kinshasa, 12 juin 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)

Maponami ma 1er vice-president ya Assemblee nationale masalami lisusu te lokola bureau ya suku eye ya nse ya parlement esalaki linaka. Police ekangi nzela inso na bosenga ya Conseil d’Etat.

Conseil d'Etat ekaki mikolo mibale mileki ete linaka lyango misengalaki kotelemisama lokola mpe bolongolami bwa Jean-Marc Kabund, président interimaire ya UDPS, na kozelaka mokano ya Cour constitutionnelle na ya Cour ya cassation.

Nsima na mwa ntango ya bondogwani na police, bayi bureau bakokaki kokota na Palais du peuple.

Jeanine Mabundua ayebisi ba députés banso été mamponami mango mapusani na mokolo moyebani.

"Lokola likama lya mobulu lizali mpe ndenge totie bokengi mpe bobatelami ya ba députés liboso, bureau (ya Assemblée nationale) endimi kopusa plénière mokolo mosusu," eyebisi bureau ya Assemblée nationale.

Akutanaki na président Félix Tshisekedi yambo na yango.

XS
SM
MD
LG