Ekolo Amerika epesi bitumbu na bakonzi mitano ya likolo ya Ouganda mpo na kaniaka

Président Joe Biden na Maison Blanche, Washington D.C., 11 mars 2022

Ekolo Amerika esakolaki lelo bitumbu epesi bakonzi mitano ya likolo ya Ouganda na ntina ya bofundami na bango mpo na kaniaka mpe boniokoli bato na ekolo na bango. Mineyi na kati na bango, lokola mokonzi ya ndako ya bakeli mibeko, bakoki kosala mobembo na ekolo Amerika te mpo na mambi matali kaniaka. “ Bakonzi baye mineyi basaleli mabe misala ya mbulamatadi mpo na bolamu bua bango moko, na boniokoli bayi mboka ya Ouganda”, esakoli na liyebisi lioko Matthew Miller, molobeli ya departement d’Etat ya ekolo Amerika. Mokonzi ya mitano, mobundi ya kala ya mampinga ya bobateli bayi mboka na Ouganda, bakoki kopesa ye visa ya Amerika te.