Mokambi ya misala mya maponami na ekolo na ye Oda Gasinzigwa asakoli ete Paul Kagame akondongwa na bato basusu babale na maponami ma mokonzi

FILE PHOTO: Rwandan President Paul Kagame attends the lighting ceremony of the Rwandan genocide flame of hope, in Kigali

Paul Kagame akondongwa na bato basusu babale na maponami ma mokonzi ya mboka makosalama na Rwanda o’mokolo mwa zomi na mitano ya sanza ya sambo ekoya, esakoli mokambi ya misala mya maponami na ekolo na ye Oda Gasinzigwa. Badongwani bango bazali bongo Franck Habineza ya Liongamba lya politiki ya Vert to langi ya mpondu na moyi indépendan Philippe Mpayimana. Bayi politiki babale baye basemaki mpe ndingisa ya kowelela maponami na 2017. Mokambi ya misala mya maponami na Rwanda asakoli na etando eke ya Rwanda ete bato libwa nde bapesaki nkombo na bango mpo na kolelela maponami kasi kaka basato nde bandimami. Nkombo ya moyi opposition Diane Rwigara, mokambi ya Lingomba lya lobiko ya bana mboka oyo atelemelaka Paul Kagame ezali te. Diane Rwigara alongolamaki mpe na maponami ma 2017. Oda Gasinzigwa alobi ete Diane Rwigara apesaki nkasa ya bosambisami bwa ye na esika ya casier judiciaire lokola esangamaka na Mokambi ya misala mya maponami akambaka. Abakisi mpe ete moyi opposition Diane Rwigara apesaki mpe mokanda motalisi ete azali moyi ekolo Rwanda. Esangami mpe ete bato nkama motoba batiya manzaka na mokanda ya kopesa maboko na moto nionso akowelela maponami kasi Diane Rigara amemaki kaka zomi na mibale kolanda misala mya mponami. Oda Gasinzigwa alobi ete mingi na bato basusu bazangaki mpe komema mokoloto mwa bato nkama motoba kino mokolo mwa zomi na minei ya sanza ya motoba eye. Diane Rwigara na mibu ntuku minei na mibale akitisamaki o’likambo mpe atiamaki boloko na bofundami kosala mikanda mya lokuta mpe kotinda bato na botomboki yambo ete atikama na 2018 nsima na pene na mobu moko ya bokangami.