Makelele ya mandoki ya kilo mayokanaki zinga zinga ya Kanyabayonga na Nord-Kivu

Basoda ya Mampinga ma RDC, FARDC, na manduki ma bango na motuka na na nzela ya bitumba na ba M23 na Oicha, territoire ya Beni, Nord-Kivu, 7 sanza ya zomi 2018.

Na Nord-Kivu, makelele ya mandoki ya kilo mayokanaki lelo zinga zinga ya Kanyabayonga. Masasi ya makasi maye mabengami “mortiers” biyokanaki na ntongo ya lelo zinga-zinga ya Kanyabayonga, na etuka ya Nord-Kivu.

Engebene na bato bae sika, mampinga ma ekolo Congo democratiki bazali kobeta batomboki ba M23 wuto tongo ya lelo na zone eye ezali na kati ya territoire ya Rutshuru na nordi mpe eye ya Lubero na Sudi.

Ba obus ya mortier bikweyaki na cite ya Kanyabayonga. Bitumba bizali kosalema na region to na esika lina wuto ba poso mibale.

Mampinga ma ekolo Congo democratiki (Fardc) bizali kokoba kopusa batomboki libanda ya Bulindi, na ba kilometele koleka zomi ya Kanyabayonga.