Congo Brazzaville ezali kobongisa bokutani ya mambi matali klima

Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville na bokutani na président Russie Vladimir Poutine (amonani te na photo) na Kremlin, Moscou, Russie. 23 mai 2019.

Ekolo Congo Brazzaville ezali koyamba lelo bokutani ya bayi Afrika mpo na mambi matali bokati ba nzete mpe kolona ba nzete.

Likanisi liye lizali ya kolona ba nzete mingi na ntina ya kobongisa mambi ma Klima.

Bokutani eye esengelaki kosangisa pene na bakonzi ya bikolo ya Afrika motoba, ezali kokota na kati na oyo babengi “décennie africaine et mondiale d’afforestation et de reboisement”, ebandisamaki na mokonzi ya ekolo Congo Brazzaville, Denis Sassou Nguesso, na eleko ya COP27 na ekolo Egypte.

Bokutani eye ezali lokola ebandeli ya bolukiluki. Likambo liyebani, bobongolami ya Klima ezali penza mabe mpe ezali kobangisa, elobi bongo Denis Sassou Nguesso.