Biden azuaki mokano ya komilongola na kowelela bokonzi na maponami ya mokolo mua mitano ya sanza ya zomi ezali koya

Mokonzi ya kala ya Etats-Unis Barack Obama (D) na Maison Blanch elongo na Joe Biden (C) mokonzi ya sika na vice-président Kamala Harris (G). Washington 5 avril 2022.

Sima ya ba poso misato ya bato koloba loba na mambi matali bokolongono ya mutu mpe ya nzoto na ye, Mokonzi ya ekolo Amerika, Joe Biden, mibu ntuku mwambe na yoko, azuaki mokano ya komilongola na kowelela kozua bokonzi na maponami ya mokolo mua mitano ya sanza ya zomi na yoko na mbanda na ye ya politiki Donald Trump.

Alobi ete asali yango mpo na ntina ya parti politiki na ye mpe mpo na ekolo na ye, na ntina ya kolandela kaka mosala na ye ya mokonzi ya ekolo kino suka ya mandate na ye.

Mbala moko apesi maboko na candidature ya mokitani na ye, vice-presidente Kamala Harris, moyi Afro-Americaine ya muasi ya yambo ya kozua esika ya bongo.