Union Europeenne epesi etumbu na Colonel Augustin Migabo ya misala ya bobateli ekolo ya ekolo Rwanda

JM Chatainger ya limpinga lya Union européenne (G) , ntoma ya France Bruno Aubert (D) na mokambi ya etuka ya Nord-Kivu lieut-gén. Ndima Kongba (C) na Goma, 10 mars 2023.

Colonel Augustin Migabo ya misala ya bobateli ekolo ya ekolo Rwanda – Rwanda Defense Force (RDF) azui etumbu ya Union Europeenne.

Azali motindi molandi ya commandement to bapesi mitindo ya mampinga ya kafukafu ya mampinga ya bobateli ekolo ya Rwanda eye etindama wuto sanza ya mitano ya 2022, mingi mingi na region ya Nord-Kivu.

Union Europeenne ezali polele : Ntina ya bozali ya ba RDF na ekolo Congo democratiki ezali ya koyingisa makasi misala ya lingomba M23 na bopesi bangi bato mpe bibundeli.

Bozali ya mampinga ma ekolo Rwanda na mabele ya ekolo Congo democratiki ezali mbeba oyo babengi na lopoto violation de l’integrite territorial de la RDC, UE ezali na boyebi.

Mikolo miye, esengi na polele na ekolo Rwanda ete etika bitumba, elongola basoda na ye mpe bibundeli na ye na monyele ya ekolo Congo democratiki.