Convention ya Démocrates na Chicago: Biden alaki komipesa mpenza na bobeti ntangwa ya Kamala Harris

Mokonzi ya Amerika Joe Biden (D) na vice-présidente Kamala Harris na Congrès ya ba démocrates na Chicago, Illinois, 19 sanza ya mwambe 2024.

Joe Biden mokonzi oyo azali na ebonga awa na Ekolo Amerika, azwaki maloba na mpokwa ya mokolo mwa mosala moko na Likita linene to Convention ya ba Démocrates, lingomba lya ye, na Chicago, na etat ya Illinois.

Alobaki akopemisa mpenza na makasi manso mpe na motema mobimba na bobeti ntangwa ya Kamala Haris, vice-présidente na ye, oyo aponi mpo azala oyo akowelela maponami ma mokonzi ya mboka na républicain Donald Trump na sanza ya zomi na moko ekoya.

"Mokano ya malamu koleka nazwaki ya bokonzi na ngai, mozalaki kopona Kamala Harris bo' vice-pr♪0sidente," elobaki M. Biden.

Ata alongaki ba primaires ya ba democrates mpo alakisa elongi na bango na maponami, Joe Biden asakolaki, sanza moko eleki, ete atiki kowelela maponami nsima na bayi lingomba lya ye kotiya ye mbamba mpe kosenga ye kolongwa na boweleli maponami mpo alakisaki elongi ya malamu te na bondongwani ya yambo na etando eke azalaki na yango na Donald Trump.

Na Convention to na likita liye, ba democrates nde basengeli kondima mpe kopesa mpifo na Kamala Harris bo’ moto baponi sika mpo na kozwa esika ya Biden na maponami.

Ba démocrates mingi bazali kozwa maloba na likita liye.

Hillary Clinton mpe azwaki malaoba o'mokolo mwa mosala moko.

Lelo, lisikulu ya Barack Obama mokonzi ya kala ya ekolo lizalami.

Lobi bato baike basalaki mobulu libanda lya esika likita liye lizali kosalama mpo na kopamela ndenge Amerika ezali kopesa maboko na bitumba na Israel mpe na Ukraine.

Baike na batelemeli bazalaki mpe kosenga kimya na Ekolo Congo Democratique. Moyi politiki ya RDC Martin Fayulu azali mpe moko na babengisami.