Coach ya OM De Zerbi alobi eloko ebongwani te mpo na Chancel ata ko azongi na ekipi

Mosani ya MO ya RDC #99 Chancel Mbemba (G) azali kosepela na coach Jean Louis Gasset, stade Velodrome ya Marseille, 2 sanza ya mitano 2024.

Coach ya Olympique de Marseille, moyi Italie Roberto De Zerbi alobi mokano azwaki mpo na Chancel Mbemba mobongwani te atako mosani ya RDC oyo azongi kati na lingomba ya lisano lya ndembo ya Marseille.

"Nalobaka ntango nyonso bosolo mpe namekaka kozala malamu na bato banso. Eloko te ebongwani mpo na ye (Chancel Mbemba)," eyanolaki De Zerbi na bapanzi nsango yambo na match ya mokolo mwa mposo na Montpellier.

Mokambi ya OM ya ekolo Italie alobaki yango mokolo moko nsima na Chancel Memba kozeongela komielengela kati na basani ba ekipi eye na Marseille.

De Roberto alimboli ete asololaki na Chancel Mbemba na ete eleki.

"Na mosala na nga, esengeli nazwa mikano lokola (nazwaki yango) mpo na Vertout, Gigot na Pau Lopez na botongi ya ekipi," ekonduli Roberto De Zerbi.

Coach ya OM alimboli ete bakambi ba ekipi bayebisaki basani Vertout, Gigot, Pau Lopez mpe na Chancel Mbemba ete club eye elingi kobanda eleko esusu na basani ba sika.

"Yango elongi eloko te na boyebi mosala ya Chancel Mbeba. Mpe lisusu, ezali te motuna botunaki nga ntango tozalaki yambo na molongo. Ezali mikano tozwaka mpo na kokende liboso kasi ezali mikano mizwami na botosi," elobi De Zerbi.

OM epesamaki mitindo ya kozongisa Chancel Mbemba na molongo na yango na LFP (Ligue de Football Professionnel).

Chancel Mbemba na ON bazalaki wuta ntango coach to mokambi ya OM alongaki Chancel Mbemba kati na basani ya groupe profesionnel mpe atindaki na ekipi ya mibale.

Chancel aboyaki mbala mibale kokende kobeta na ekipi B mpe na division ya nse mpe kosala entraînements na yango.

Capitaine ya ba Léopards ya RDC apesamaki bongo etumbu ya yambo mpo na yango.

Nsima na yango Chancel Mbemba apesamaki lisusu etumbu mpo aboyaki kokende kotalisama na minganga ya OM baye bazalaki koloba ete azalaki na nkwokoso na ebolongo na ye mpe esengelaki ete apesama lipaso, likambo mosani ya RDC aboyaki kondima.

Chancel Mbemba apesamaki etumbu mpe apekisamaki lifuta lya mwa ntango.

Sika azongeli komilengele na OM mbala ya yambo wuta saison eye ebandaki, nsima na kolakisa elongi elamu na ba Léopards epayi atiaki mongete moye mopesamaki na mosani ya ba Taïfa Stars ya Tanzanie oyo amekaki kobimisa ndembo ebetamaki na Chancel Mbemba na match aller na Kinshasa, o’mokolo mwa mitano ya mposo moleki na stade des Martyrs.

"Chancel Mbemba atalisi ete azali mpenza mosani ya ndembo ya malamu. Azali kobeta te na club na ye kasi azali mpenza ya komilengela mpe ekolo na eye esengeli kotiela ye motema," etatolaki coach ya ba Léopards Sébastions Desabre nsima na match RDC-Tanzanie.