RDC

Tshisekedi akiti na Bunia

Félix Tshisekedi na bolongwi na ye na libanda ya mpepo ya Lubumbsahi mpo na kokende na Bunia, Haut-Ktanga, 30 juin 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomi na Bunia esika wapi akolekisa mokolo ya Lipanda ya Congo démocratique, eyebisi bapanzi sango na esika eye.

Mwana mboka Tshisekedi awuti na Lubumbashi esika wapi azalaki na bokutani ya bokengi na bakambi batalaka makambo maye na Haut-Katanga.

Félix Tshisekedi ayebisi na lisikulu na ye ya mokolo ya Lipanda, akozala na Bunia le 30 juin "mpo na kosepela te kasi kokanisa makasi bana mboka basalaki mpo Congo democratique ezuwa lipanda".

"Tokoki kosepela te ntango ngambo mobimba ya ekolo ezali kolela," asakoli M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC akomi na Bunia esika wapi bato koleka 130 bakufi na bitumba.

Bayike balobi bitumba yango bozali kati na kabila ya ba Lendu ba Hema mpe basusu. Kasi bayike babiyi yango mpe balobi basimba mitundu, mingi ya mboka bapaya, nde bazali kosala bitumba biye.