Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe alongi primaire mpo na kolakisa elongi ya Union sacrée na maponami ya mokambi ya Assemblée provinciale


Mokonzi ya mboka ya RDC Félix Tshisekedi ayambi mokambi ya kala ya ndako na ye ya mosala Vital Kamerhe na Cité ya Union africiane, Kinshasa, le 28 juin 2022.
Mokonzi ya mboka ya RDC Félix Tshisekedi ayambi mokambi ya kala ya ndako na ye ya mosala Vital Kamerhe na Cité ya Union africiane, Kinshasa, le 28 juin 2022.

Vitale Kamerhe, mokambi ya lingomba lya politiki UNC, Union pour la nation congolaise, alongi primaire to maponami ya kati ya liboke Union sacrée eye ezali nsima na mokonzi ya RDC, Félix Tshisekedi, mpo na kolakisa elongi na yango na maponami ya motambwisi ya Assemblée nationale.

M. Kamerhe aponami na bato 183 kati na 372 baye bazalaki na maponami mango.

Christophe Mboso, mokambi ya kala ya suku eye ya nse ya ndako ya bokeli mibeko mpe motambwisi to motomolo ya bureau d’âge eye ezalaki kokamba mpo na mwa ntango bokonzi ya baponami ya mapponami masalamaki na 2023, azwi nde maponami 113.

Modeste Bahati azwi 69.

Union sacrée ezali na motango ya koleka ya bakeli mibeko na Assemblée nationale.

CENI ekotiya sika mokolo mwa maponami.

Motambwisi ya Assemblée nationale ya kala ya RDC wuta 2003 kino 2009, M. Kamerhe nde akolakisa elongi ya liboke liye na maponami ma kokamba suku ya nse ya Parlement ya RDC.

Forum

XS
SM
MD
LG