Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonzi ya basoda babotola bokonzi batelemisi VOA na BBC mpo na mposo mibale na Burkina Faso


VOA Building
VOA Building

Bureau etali makoki ma bomoto ya ONU elobi emitungisi na botelemisi bwa VOA, Lolaka Amerika, mpe ya BBC mpo na mposo mibale na bakonzi ya basoda babotola bokonzi na Burkina Faso mpo na nsango ya mampinga koboma bacivili.

Bureau eye ya makoki ma bomoto bwa ONU elobi bopekisi bwa bonsomi bwa misala mya bopnzi nsango bosengeli kosukisama na kozela te.

“Bonsomi bwa kozuwa maloba bozali mpe na ntima mingi epayi bato bavandaka mpe lisusu na ndenge transition ezali kosalama na Burkina Faso,” elobi molobeli ya misala miye mya ONU Marta Hurtado.

Na biyano na ye na VOA Afrique, Mokambi ya Reporters sans frontières, Sadibou Marong alobi bonsomi bwa misala mya bopanzi nsango bozali kokoba kobebisami na Burkina Faso.

M. Marong alobi bakonzi ba Burkina Faso bazalaka na bizaleli ya koyanola te ntango batunaka bango mituna na makambo ma boye.

Botelemisi bwango bosakolami nsima na VOA mpe BBC kopesa nsango Human Rights Watch eye epamelaki mampinga ma Burkina Faso koboma bato koleka nkama mibale na ntuku mibale na misato kati na bango bana ntuku mitano na motoba, na bitumba mbala mibale na bandongolomeso ba djihadisates na nord ya ekolo.

“VOA ekokoba kopesa nsango na yango mpo etali Burkina Faso mpe kolandela makambo mazali koleka na mboka eye na mobimba mpe sembo,” elobi mokambi ya mwa ntango ya VOA, John Lipman.

“ Lolaka la Amerika azalaka mpenza kati na mibeko ma bopanzi nsango ya siki siki, emekama mpe ya mobimba, yango wana tokozali kosenga na mbulamatari ya Burkina Faso kotala malamu mokano moye mobebi mitema mya bato,” ebakisi Mokambi ya VOA abakisi.

Bakonzi ba Burkina Faso ya basoda bazui mokano ya kotelemisa manaka ma VOA na Lifalance mpe Babambara mpo na mposo mibale mpe kokitisa bokoti na site web mpe ba bplateformes numériques ya VOA mpe kopekisa ba reportages ya VOA etali bofundi bwa botamboli likolo na makoki mabomoto ma bacivili na bayi mampinga ma Burkina Faso.

Forum

XS
SM
MD
LG