Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC eboyi masolo na Rwanda


Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye mokonzi ya Angola Joao Lourenço bakutani na Luanda, Angola, 27 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)
Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi (D) na mokokani wa ye mokonzi ya Angola Joao Lourenço bakutani na Luanda, Angola, 27 sanza ya mibale 2024. (Facebook/Présidence RDC)

Ekolo Congo democratiki ebwakisi masolo na ekolo Rwanda, maye mokonzi ya Angola mpe mobondisi ya Union africaine Joao Lourenco asakoli wuta Abidjan na mobembo mwa ye na Côte d'Ivoire.

Ministre wa yambo ya ekolo Congo democratiki, Judith Suminwa Tuluka, alobaki mokolo mwa mosala minei na Goma, ete mokonzi ya RDC azalaki polele ntango alobaki ete bakambi ba Ekolo Congo Democratique bakosolola te na bato bazali kobundisa mboka na bango.

Nzela ya diplomatie esengeli nde kotindika mobundisi mpo ete atika bitumba, ebakisaki mme Suminwa na ntango bitumba bizali kokoba na etuka monyele ya RDC.

Na kobamelaka bitumba ekolo Rwanda ezali kosala na RDC, Judith Suminwa Tuluka asengi ete bitumbu bya makasi bipesama na ekolo Rwanda.

Mpo na Mme Suminwa, bitumbu bisengeli mpe kowuta na ONU.

Joao Lourenço asakolaki yango na Abidjan, na Cote d’Ivoire ete bokutani kati na Felix Tshisekedi na Paul Kagame bozali komilengelama.

Forum

XS
SM
MD
LG