Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

EAC-SADC batie Kenyatta, Obasanjo na Desalegn bo' bakambi ya masolo ma kimya

Mokonzi ya kala ya Kenya Kenyatta, G, azali koloba pene na mokonzi ya kala ya Nigeria Olesegun Obasanjo, na masolo ma kimya kati na bakambi na Ethiopie na Tigrée, Nairobi, Kenya, 7 sanza ya zomi na moko 2022. (AP Photo/Khalil Senosi)

Uhuru Kenyatta, mokonzi ya kala ya Kenya, Olusengun Obasanjo, mokonzi ya kala ya Nigeria na Hailemariam Desalegn ministre wa Yambo ya kala ya Ethiopie batiami bo’ bakambi ba misala mya boyakani bwa kimya ya EAC-SADC na monyele ya Ekolo Congo Démocratique.

Likita lya bikolo bya Afrika ya est na Likita lya ntombwa ya Afrika ya Nse basakoli yango na liyebisi lya elongo babimisaki lobi loleki na mpokwa.

Basanganaki na likita na ebendali ya sanza ya mibale mpe basengaki botelemisi bitumba na kozela te na est ya RDC epayi bitumba bingali makasi wuta sanza ya yambo.

Batomboki ba M23 basungami na Rwanda babotoli bisika mingi lokola bingumba ya Goma na Nord-Kivu mpe Bukavu na Sud-Kivu. EAC na SADC bandimaki bosangisami ya misala mya Luanda na ya Nairobi.

Bazali kosala elongo sika mpo na kotia bitapi bya botelemisi bitumba.

Forum

XS
SM
MD
LG