Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila ayanoli ete Tshisekedi nde azali na mokumba ya mobulu na RDC


Joseph Kabila mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique na Kinshasa, 30 sanza ya libwa 2018.
Joseph Kabila mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique na Kinshasa, 30 sanza ya libwa 2018.

Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila alobi ete mokitani wa ye na ebonga ya kokamba ekolo, président Félix Tshisekedi azangi te koyeba likambo na matata maye mazali konginda na est ya Ekolo Cogno Démocratique.

Matata makoki kaka te kotiyama likolo lya bobotoli ya bisika mingi na lingomba lya bato ba mandoki ba M23 baye bapesami maboko na Rwana, to na bobendani kati na Kinshasa na Kigali", ekomi M. Kabila na tribune moko ebimisami na journal ya Afrika ya NGele Sunday Times.

Batombokiba M23 bazwaki, na lombango mingi ba mposo eleki, bitando minene na est ya RDC lokola engumba ya Goma na Nord-Kivu mpe Bukavu na Sud-Kivu epayi makele mazalaka mingi.

Wuta bokoti bwa M. Tshisekedi na bokonzi na 2019, makambo mabebisama na RDC na lolenge ya kokoma na esika eye "mboka ezwami pene na kobanzana", ekomi M. Kabila.

Maponami ma 2023 maye mapesaki bokonzi ya mibale na M. Tshisekedi nsima na elongo ya monene mingi mazalaki "ma lokuta", ebakisi M. Kbila.

Mpo na M. Kabila, mbulamatari ekangisi monoko na bayi opposition mpe mokonzi ya mboka akoma "mokonzi ya makasi koleka na ekolo".

"Bobangisi, bokangami bwa bato mpamba mpamba mpe na bozangi bwa bosambisami, mpe botindami kokima mboka na makasi ya bayi politiki, bapanzi nsango mpe ba leaders ya opinion, na bakambi ba biyamba, bozali kati na lolenge lotalisi mbulamatari ya M. Tshisekedi," ekomi M. Kabila.

"Mbeba ebele likolo lya Butu likonzi mpe ya makoki ma bomoto, lokola mpe bobomi bato ebele mbala na mbala na polici mpe mampinga ya Tshisekedi ekosilaka te nsima na suka ya masolo kati na RDC na Rwanda to na kolonga M23,: ekebisi M. Kabila.

Soki totelemisi te lolenge loye ya mobulu na kotalelaka kaka M23, mobulu ya politiki mpe matata ma manduki, ata ko bitumba (guerre civile), ekokoba," ebakisi Mmokonzi ya kala ya RDC.

M23 eye elobi ezali kobunda na ntina ya kobatele makoki ma ya minorité tusti na RDC, ezongelaki bitumba na 2021, mibu mibale nsima na bokoti ya M. Tshisekedi na bokonzi.

Afrika ya Ngele (Afrique du Sud) ezali na basoda koleka 2.000 na RDC na nzela ya misala mya boyokisi kimya makasi mya ONU, mpe 14 kati na bango babomamaki na bitumba sanza eleki.

Fréquences

Forum

XS
SM
MD
LG