Joseph Kabila alobi ete bayi ekolo Congo Democratique basengeli kotiyama na misala mya kobondisa matata na monyele ya ekolo eye mpo bayebi malamu likambo lyango.
Mokonzi ya kala ya Ekolo Congo Démocratique ayanolaki na mituna mya misala mya nsango na radio mpe etando eke ya mbualamatari ya ekolo Namibie CNB Namibia, kolanda billingi bibimisamaki o mokolo mwa mosala minei.
"Soki nakoki kolobela moto nyonso oyo alingi toli na nga na likambo liye mpenza, toli na nga ekoki kozala: Solola na bana ba Ekolo Congo démocratique. Bayebi malamu - mpo basi bazala esika wana, bamata ba ngomba, bakita na mabwaku (ba valées)... ezali ngomba esusu ya komata... Bayebi malamu mpenza ndenge nini to mpe nini bazali konyokwama na yango," eyanoli Joseph Kabila.
Mokonzi ya kala ya RDC alimboli ete ayebi ete mayele maye mazali kosalama mpo na kimya mazali ya komema babondi (médiateurs to facilitateurs) baye bazali koponama mingi mingi na Afrika ya West mpe bisika misusu na Afrika mpo na kimya na RDC kasi "moko te kati na babondi baye akoki koyebisa yo ete ayebi mboka eye koleka bana mboka bango moko", elobi Joseph Kabila.
Mokonzi ya la kala ya RDC alimboli ndenge nini alongaki na basungi basusu kosukisa mobulu ya batomboki na 2001 nsima na ye kokota na bokonzi ntango azwaki mokano ete mampinga manso ma bikolo bya bapaya masengelaki kotika mabela ma mboka.
Yango epesaki nzela na bayi mboka kosolola na lisungi lya baningami ba RDC, ONU mpe molongo.
Kasi amituni soki esengeli kolanda mpenza kaka makambo masalamaki lokola sika mampinga ma bikolo sambo mazali kobunda na mabele ma Congo, bakisa batomboki mpe basimba manduki kilikili na ba mercenaires.
Mpo etali toli akoki kopesa kolanda ndenge na 2008 asangisaki kati mbulamatari ngomba inso ya baye bazalaki kosala bitumba, Joseph Kabila alobi bayi RDC nde bayebi likambo lya mboka na bango koleka bato banso.
Joseph kabila alobi bayi RDC basi bazala bisika ya lolenge loye mpe bazwa biyano.
Mpo na ye, ekosengela mpe kotalela motema malamu to bolingi ya baye bazali na matata. Joseph Kabila alobi ete alingi kosalela mboka na ye, Afrika mpe molongo.
Awutaki bongo na matanga ya mokonzi ya kala ya Namibie Sam Nujoma.
Forum