Ekolo Rwanda elobi ezali kobanga te kotiyama pembeni na bayi molongo mpo na bitumba na monyele ya RDC epayi Kigali ezali kokoba kopesa maboko na batomboki ba M23 baye bazali kobundisa mbulamatri.
"Rwanda ezali kobanga te kotiyama mopanzi. Tozali liboso ya likama litali bozali bwa biso liwuti na mampinga ma babomi (force génocidaire)," elobi ministre ya Mambi ma Bapaya ya Rwanda, Olivier Nduhungirehe na lisanga lya bapanzi nsango na ONU (ACANU). "Botiyami pembeni ya ekolo na biso ezali kotungisa biso soki moke te," abakisi.
Batomboki ba M23 baye bapesami maboko na mampinga ma Rwanda babotolaki ba mposo eleki bingumba minene mibale na est ya RDC, Goma (Nord-Kivu) na Bukavu (Sud-Kivu) wuta bazongelaki bitumba makasi na libandela lya mobu moye.
Grande-Bretagne esakolaki o mokolo mwa mosala mibale kotelemisa lisungi lyango mingi lya misolo na Rwanda.
Washington mpe esakolaki mposo moleki bitumbu bya misolo na moko na bakonzi ba Rwanda, ministre ya kala ya Bobateli ekolo James Kabarebe oyo azali sika ministre ya Intégration régionale mpe afundami kozala mokambi ya lisungi na basoda ba Rwanda na M23.
Na lisikulu lyoko o mokolo mwa mosala mibale, général Kabarebe ayanolaki ete bitumba bitiyami likolo na Rwanda bikopekisa nde mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi kozala na masolo manso na M23.
Molobeli ya mokonzi ya RDC, Tina Salama alobaki ete M. Tshisekedi abengisaki ba entreprises ya Amerika kosomba ba minerais stratégiques koyokana mbala moko na Kinshasa.
"Masolo manso matali mikano mya bitumbu mpe btimbu binso bitiyami likolo na Rwanda ekoki kobangisa biso te na tobatela ndelo ya ekolo na biso mpe bana ba mboka na biso," eyebisaki ministre ya Mambi ma Bapaya ya Rwanda, Olivier Nduhungirehe na lisanga lya bapanzi nsango na ONU (ACANU).
M. Nduhungirehe azwaki malobo liboso lya Conseil ya makoki ma bomoto na Genève epayi alobaki ete na etuka ya Grands lacs "cancer ya extrêmisme ethinque violent mpe idéologie génocidaire ezongeli lisusu makasi".
Forum