CENI epameli makasi mokanda CENCO na ECC na kolakisaka mosapi na mbeba nzike ya maponami na RDC

A voting machine sits on a table during a training for electoral agents from the Independent National Electoral Commission (CENI) at a voting center in Lubumbashi on December 19, 2023, on the eve of Democratic Republic of Congo's presidential and general

CENI epameli makasi mokanda CENCO na ECC babimisi elongo na kolakisaka mosapi na mbeba nzike ntango ya maponami, sanza motoba nsima bosalami bwa yango na Ekolo Congo Democratique.

Mokambi molandi ya mibale ya Misala mya maponami na Ekolo Congo Democratique, Didi Manara ayanoli na ete mokanda mwa CENCO, likita ba episkopo ya RDC elongo na Eklezia ya misioni ECC, mozali nse ngambo moko mpe motali kaka nkwokoso kasi makasi CENi esalaki te.

Molobeli ya ECC-CENCO, Pasteur Eric Nsenga alobi mbeba esalamaki na maponami ebebisaki bondimami ya bilembo bya maponami.

Apemeli mpe na ndakisa mbilinga mbilinga ya baike ya politiki baye batiaki bayi mabota ma bango na mabonga mpo ete balobola bango bo’ ba suppleants.