➡️Envoyé spécial ya UE alobi bokangami bwa libanda lya mpepo ya Goma bozali kopekisa lisungi ➡️Saki ya makila 500 etindami na Kinshasa ekomi Goma ➡️BaWazalendo babotoli Mwenga
➡️Ntoma ya USA Tamlyn apameli M23 kokanga mpe komema bato wuta mapitalo na Goma ➡️ Koleka bacivili 1.000 bakufi na bitumba bya Mombondo na mibu misato na gd Bandundu ➡️Bana bake 375.000 bazali likama ya kokotisama na mangomba ma basimba mandoki na est ya RDC (Save the children)
➡️Kampala na Kigali bawangani bokutani ya Kagame na gén. Muhoozi mposo moleki ➡️Mokambi ya "Congolese for Trump" alimboli lisikulu lya mokonzi ya Amerika na Congrès ➡️Masumu Debrendé alobeli bolakisi bwa film ya Simon Kibangu na Paris
President Donald Trump asalaki mokolo mwa mosala mibale na mpokwa liboso lya suku ibale ya ndako ya bokeli mibeki esanganaki na Congrès lisikulu lya ye ya yambo ya bokonzi bwa ye ya mibale na Washington D.C.. Alobelaki misala asi abandi kosala nsima na maponami.
➡️ Kigali na Kampala bawangani bokutani ya général Muhozi, mwana ya Museveni na Kagame na Kigali ➡️ Mary Lawlor alobi amintungi mpo na makambo maye mazali koleka na est ya RDC ➡️ Bosambisami ya bobendeli ya bitumba bya Kamuina Nsapu bozengelaki na na Cour miliaire ya Kasai-Occidental ya kala
➡️ Trump akosala lisikulu liboso lya Congrès ➡️ Batomboki ba AFC M23 bakomi na Mwenga na Sud-Kivu nsima na bitumba na baWazalendo ➡️ Zelensky alobi alingaki kotiya makambo na molongo na Donald Trump
➡️ Batomboki ba AFC M23 bakomi na territoire ya Mwenga na etuka ya Sud-Kivu nsima na bitumba na ba Wazalendo ➡️ Basimba manduki koloka zomi bakufaki na bitumba kati nan gambo ibale ya ba Wazalendo ➡️ Allemagne esakoli ete etelemisi lisungi lya yango lya sika litali ntombwa mpo na ekolo Rwanda
➡️ Kagame akutanaki na Muhoozi Kainerugaba na Kigali ➡️ Kolwezi, chef-lieu ya etuka ya Lualaba ezalalaki esika ya bobendani mokolo mua lelo ➡️ Mampinga ma ekolo Ouganda masakolaki été matindaki badoda ma yango na mboka Mahagi
➡️Kinshasa elobi ba FLDR baye M23 ezongisi na Rwanda ezali lokuta ➡️Ba musulmans bazali na mpasi mpo na bitumba bya M23 na Uvira ➡️Edigngwe "moto na ngenge" atiami na lilita na Kinshasa
➡️Cenco na Ecc bakutanaki na Sassou na Brazzaville mpo na kimya na est ya RDC ➡️Kinshasa elobi bato 8.500 bakundami mpo na bitumba ya M23 na Goma ➡️Dominique Munongo alobeli bokutani ya basi mpo na kotombola ba mama na politiki
Voir plus