Ntoma ya ekolo Amerika na RDC Lucy Tamlyne alobi ete bolongoli mpe bomemi ya bakoni wuta mapitalo na bayi M23 bolakisi mbala esusu botyoli ya kimya na batomboki baye na monyele ya mboka ey
Ezaleli eye ya batomboki "elakisi mpe botyolami ya bana mboka ya etuka yango", ebakisi Ntoma ya Amerika na makomi atiaki lobi na compte X na ye .
Kolanda makomi ma mama Tamlyn, "bowangani M23 ezali kosala bokoki kondimama te mpe lingomba liye lisengeli komemisama mokumba ya mbeba inso ya makoki ma bomoto".
Mama Tamlyn akundoli maloba ma secretaire d’Etat ya ekolo na ye "Marco Rubio oyo asengi na president Felix Tshisekedi ya RDC ete ngambo inso endima botelemisi bitumba mpe botosi bwa bonsomi bwa RDC".
Haut-Commissariat ya ONU ya makoki ma bomoto esakolaki mikolo mibale mileki na liyebisi ete koleka bakoni mpe bato ba mpota nkama moko na ntuku misato bazwamaki na batomboki ba M23 na mapitalo na Goma.
Ebakisi ete batomboki basalaki mpe bitumba na mapitaloma Heal Africa na sanza ya mibale mpe bamemaki bakoni nkama moko na zomi na motoba na lopitalo CBCA mpe zomi na mitano na Heal Africa.
Forum