➡️ Batomboki ba M23 bakoti na mboka Ihusi mpe Kalehe-centre na Sud-Kivu ➡️ Cenco-ECC ekutani na AFC/M23 mpo na masolo ma kimya ➡️ Ndayishimiye akebisi Rwanda na kobundisa ekolo na ye na matata ma est ya RDC.
Mgr Donatien Nshole, SG ya Cenco (Likita lya b'episkopo katoliko ya RDC) asakoli ete balakisi bilongi bya Cenco na ECC bakokende mpe kokutana na Paul Kagame mpe bakonzi ba bikolo misusu nzinga nzinga mpo na koluka kimya. Alobi yango nsima na kokuta na bakambi ba M23/AFC na Goma.
➡️ Batomboki ba M23 bakoti na Ihusi mpe Kelehe-centre na Sud-Kivu ➡️ Ndayishimiye akebisi Rwanda na kobundisa ekolo na ye na matata ma ye mazali kongala na est ya RDC ➡️ Bakambi ba bikolo bya Afrika bakokutana na Addis Abeba na likita lya mobu na mobu ya Union africaine
Limpinga lya bakambi ba eklezia katoliko na misioni Cenco-ECC likutani na Corneille Nangaa mokambi ya batomboki M23/AFC mpo na masolo ma kimya. Totala nsango ya Fiston Issemwami
Balinga molato baike basangani na lingoma lya ba "sapeurs" na Kinshasa, babwaki mbela mpo na kimya mpe bapesi maboko na mampinga ma Ekolo Congo Democratique na bitumba biye batomboki ba M23 na mampinga ma Rwanda bazali kosala na monyele ya RDC.
➡️Ba Codeco babomi bacivili koleka 50 na Djaba (Ituri) ➡️Couvre-feu etiami na Uvira ➡️UDPS/Tshisekedi eboyi masolo na mesa na M23 mpe misala Cenco-Ecc mizali kosala
Kimya ezali engumba Bukavu ata ko emonani basoda 84 basalaki mwa mobulu ntango bazalaki kotindama bisika misusu. Moyangeli ya etuka ya Sud-Kivu Jean-Jacques Purusi alimbolaki na VOA Lingala ete basota bango bakangamaki mpe Rwanda na M23 bazali kotinda nungu nungu mpo na kobangisa bavandi.
➡️ Bokutani ya SADC-EAC na Dar es Salam bomemi botombolami ya mingongo mingi ➡️ Kelasi ezongaki mpenza te na Goma lokola bakonzi basengaki ➡️ NRC ekokata misala mya yango na pene na bikolo ntuku mibale
➡️ Bacivili mwambe babomamaki na batomboki ADF na bisika misato ya Nord-Kivu ➡️ Kelasi ezongaki mpenza te na Goma, chef-lieu ya etuka ya Nord-Kivu lokola bakonzi basengaki ➡️ Na kozanga lisalisi ya Amerika, Conseil Norvegien pour les Refugies ekokata misala mya yango
Bana ba RDC basengi bitumba mpo na Rwanda na M23 na milulu basalaki o mokolo mwa mitano na Washington D.C. Eddy Isango asololi mpo na yango na moko na baye bazalaki na milulu myango, mokambi ya mabongisi "Congolese for Trump", Junior Bompeti.
Bakonzi ya RDC Félix Tshisekedi ya RDC na ya Rwanda Paul Kagame basakolami kokutana na masolo o mokolo mwa mposo na Dar es Salam. Nzela nini ekomema kimya: Luanda to Nairobi? Bayi molongo mpe Afrika bazali kokebisa ete bitumba bipanzana na kati kati ya Afrika. Eddy Isango asololi yango babengisami.
➡️ CPI etelemeli bitumbu biye Trump azueli yango biye bisalaki été ONU mpe Europa bitomboka ➡️ Mbulamatadi ya RDC esengaki na Haut-commissariat ya ONU boluki luki na ba mbeba miye misalemi na RDC ➡️ Na RDC bosaleli ba reseaux sociaux X mpe Tik Tok bokondisami wuto bitumba ya M23
Voir plus