➡️ Trump mpe Elon Musk batelemeli na bokasi bonso misala mya USAID ➡️ Ba réseaux sociaux misusu, lokola X mpe TikTok ekangemi na RDC ➡️ Makutano etelemeli kokotela bato ya mampinga ma ekolo Rwanda mpe bato na bango M23 mpe AFC na bituka ya Nord mpe Sud-Kivu, kino na mboka Goma
Ministre d'Etat, ministre ya mambi ma Bapaya ya RDC Thérèse Kayikwamba, alimboli nini elekaki na Goma na bokweyisami yango na maboko ma mampinga ma Rwanda na batomboki na ba M23. Ayanoli na mituna mya Roger Muntu ya VOA Afrique ayambaki ministre y
➡️ Trump na Musk batelemeli na bokasi bonso misala mya USAID ➡️ Ba réseaux sociaux nzike, lokola X mpe TikTok ekangemi mpo na bato baike naRDC ➡️ Ramaphosa asengi mpe bolongolami bwa mampinga ma bapaya na mabele ma ekolo Congo democratiki
Bakambi ba SADC, lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya nse, bakutanaki o mokolo mwa mosala mitano na likita mpo na bitumba bizali kongala na RDC, na Zimbabwe. Baike bazalaki o nzela ya nsinga lokola Felix Tshisekedi ya RDC basusu bakendaki na Harare. Basengi bozongi ya masolo mpo na kimya.
➡️Bakima bitumba basengi kozanga bisika bya bango na bakambi na M23 na Goma ➡️ONU emitungisi ndenge M23 ezali kokende na Sud-Kivu ➡️Chine ebungisi bana ba yango babale na botutani ya mpepo na pakapaka na D.C.
➡️ Pekin esakoli été bato ba yango babale bazalaki na kati ya mpepo eye etutanaki na Washington ➡️ ONU esakolaki bobandi na yango na botali lolenge bitumba bizali kosalema na monyele ya RDC ➡️ Tshisekedi asololaki na bakeli mibeko ya ya Nord mpe Sud-Kivu
➡️ Bato ntuku motoba na sambo baye bazalaki na mpepo yoko ya copmagnie Colgan Air bakufaki ➡️ Paul Kagame apemali ekolo Afrika ya Ngele na koloba ete ezali na esika te na Afrika ya est ➡️ Bikolo bya EAC bisengi na RDC kovanda na mesa ya masolo na ngambo inso ya matata mpe na M23
Corneille Nangaa, mokambi ya batomboki ba Alliance Fleuve Congo (AFC) alobi na bapanzi nsango na Goma ete mposa na ye ezali kokoma kino Kinshasa kasi AFC ekotelema mwa moke na engumba mokonzi ya Nord-Kivu mpo na komilengele. Alobi basoda ya mampinga baye bakangami, bakokota na AFC. Fiston Issewami
➡️ Tshisekedi abwaki mbela na bana ba mboka na ye kopesa maboko na mampinga ➡️ Paul Kagame apemali ekolo Afrika ya Ngele na koloba ete ezali na esika te na Afrika ya est ➡️ Bikolo bya EAC bisengi na RDC kovanda na mesa ya masolo na ngambo inso ya matata mpe na M23
Jean-Pierre Bemba akitaki na Sud-Ubangi, Nord-Ubangi, Mongala na Equateur epayi abwakaki mbela na bilenge mpo ete bamikomisa mingi na mampinga na ntina ya kobundisa batomboki ba M23 na mampinga ma Rwanda baye babotoli Goma mpe bisika mingi na Nord-Kivu mpe Sud-Kivu. Bililingi ya Franck Biliwe.
Mokonzi ya RDC azwaki maloba na mpokwa ya mokolo mwa mosala misato na etando eke ya RTNC, nsima na batomboki ba M23 na Rwanda kobotola Goma mpe bisika misusu. Asengi bana ba ekolo kotelama mpe alobi misolo mya bayi mbulamatari mikokitisama mpo na kosunga mampinga. Totala.
Voir plus