Félix Tshisekedi ya RDC azalaki lundi na Luanda, Angola epayi akutanaki na masolo na mokokani wa ye ya Angola João Lourenço oyo awuti kozwa ebonga ya bokambi Union africaine. Basololi mpo na bitumba bya M23 na lisungi lya Rwanda na est RDC. Lourenço atiki ebonga ya mobondi ya matata RDC-Rwanda.
➡️Bavandi baike ya Uvira bakimi mpe basusu bakangami na ndako na bitumba Wazalendo-FARDC ➡️Ministre ya mambi ya Bapaya ya Uganda alobi mpo na nini UPDF ekomi na Bunia ➡️Ndimbola mpo na concert ya Werrason na Arena Grand Paris
➡️Burundi ewangani ete ezali kolongola basoda ba yango na RDC ➡️MSF ekebisi mpo na bobateli ya bacivili nsima na bitumba Wazalendo-FARDC na Uvira ➡️Kinshasa esengi bayi molongo koboya kosomba ba minerais ewuti Rwanda
➡️Bobangi ya bavandi ya Bunia na nsango ya bokomi ya UPDF ➡️Ba radio mingi ekangi mpo na bozangi lotiliki na Kisangani ➡️Mibembo mizongeli kati na Goma na Bukavu na lac Kivu nsima na bokoti bwa M23
➡️ONU epameli M23 koboma bana bake na Bukavu ➡️Bitumba bizongeli kati na M23-Rwanda na FARDC na Lubero ➡️Royaume uni ebengisi ntoma ya Rwanda mpo na kopamela bokobi bitumba ya M23
➡️Koleka bato 10.000 bakimi Bukavu mpe batasi na Burundi na mikolo misato ➡️Bakambi ba Ass. provinciales basanganaki na Matadi ➡️Eteni ya mibale ya Ligue 1 ya lisano lya ndembo ebandi
➡️Basi ya basoda na bitike bakimaki bitumba bazali na bwale nsima na M23 kobotola Bukavu ➡️Mahmoud Ali Youssouf aponami mokambi ya Commission africaine ➡️Koleka bato 10.000 bakimi Bukavu mpo na kokende Burundi
B'episoko ya katoliko na misioni (Cenco-ECC) bakutanaki na moyi politiki Moïse Katumbi mpe bayi lingomba na Bruxelles (Belgique) na mosala ya koluka kimya. B'episkopo baye bazali kokoba kokuta na ngambo inso mpo na kosenga boyakani ya banso mpo na kimya.
➡️Tshisekedi asengi bayi molongo kotiya Rwanda na nkasa ya moyindo, na Munich ➡️Makanisi makbwani na Kinshasa nsima na Cenco-ECC kokutana na bakambi ba AFC/M23 ➡️Député Claude Misare alobeli dejeuner national de prière ya USA epayi azalaki
➡️ M23 na basalisi ba yango ba ekolo Rwanda bazuaki libanda lya mpepo ya Bukavu ➡️ CPS ya Union Africaine mpo na bokebisi, kokamba mpe bosilisi bitumba ekokutana na Addis-Abeba ➡️ Kamerhe asengi bakeli mibeko été batika mayoki ya motema mpo na Cenco mpe ECC
➡️ Delphin Katembo akutamaki akufa mpe nzoto ebetama masasi na Kilijiwe na nord ya Goma ➡️ Mama mokambi ya Unicef akebisi na bomati makasi ya boyebi na makasi ya nzoto ya bana na est ya RDC ➡️ RwandAir epameli Ekolo Congo Democratique kokanga mapata ma yango na mpepo inso ekowuta Rwanda
Voir plus