➡️Envoyé spécial ya UE alobi bokangami bwa libanda lya mpepo ya Goma bozali kopekisa lisungi ➡️Saki ya makila 500 etindami na Kinshasa ekomi Goma ➡️BaWazalendo babotoli Mwenga
➡️Ntoma ya USA Tamlyn apameli M23 kokanga mpe komema bato wuta mapitalo na Goma ➡️ Koleka bacivili 1.000 bakufi na bitumba bya Mombondo na mibu misato na gd Bandundu ➡️Bana bake 375.000 bazali likama ya kokotisama na mangomba ma basimba mandoki na est ya RDC (Save the children)
➡️Kampala na Kigali bawangani bokutani ya Kagame na gén. Muhoozi mposo moleki ➡️Mokambi ya "Congolese for Trump" alimboli lisikulu lya mokonzi ya Amerika na Congrès ➡️Masumu Debrendé alobeli bolakisi bwa film ya Simon Kibangu na Paris
➡️ Kigali na Kampala bawangani bokutani ya général Muhozi, mwana ya Museveni na Kagame na Kigali ➡️ Mary Lawlor alobi amintungi mpo na makambo maye mazali koleka na est ya RDC ➡️ Bosambisami ya bobendeli ya bitumba bya Kamuina Nsapu bozengelaki na na Cour miliaire ya Kasai-Occidental ya kala
➡️ Trump akosala lisikulu liboso lya Congrès ➡️ Batomboki ba AFC M23 bakomi na Mwenga na Sud-Kivu nsima na bitumba na baWazalendo ➡️ Zelensky alobi alingaki kotiya makambo na molongo na Donald Trump
➡️ Batomboki ba AFC M23 bakomi na territoire ya Mwenga na etuka ya Sud-Kivu nsima na bitumba na ba Wazalendo ➡️ Basimba manduki koloka zomi bakufaki na bitumba kati nan gambo ibale ya ba Wazalendo ➡️ Allemagne esakoli ete etelemisi lisungi lya yango lya sika litali ntombwa mpo na ekolo Rwanda
➡️Kinshasa elobi ba FLDR baye M23 ezongisi na Rwanda ezali lokuta ➡️Ba musulmans bazali na mpasi mpo na bitumba bya M23 na Uvira ➡️Edigngwe "moto na ngenge" atiami na lilita na Kinshasa
➡️Cenco na Ecc bakutanaki na Sassou na Brazzaville mpo na kimya na est ya RDC ➡️Kinshasa elobi bato 8.500 bakundami mpo na bitumba ya M23 na Goma ➡️Dominique Munongo alobeli bokutani ya basi mpo na kotombola ba mama na politiki
➡️ ONU ezali kotinda mabota ma basali ma yango ya molongo na Burundi na ntina ya bitumba na RDC ➡️ Koleka motango ya bato nkoto mwambe na ndambo baweyi na ba lopitalo ya Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu ➡️ Jean-Pierre Lacroix akomaki na Kinshasa
Voir plus