Belgique ebengisi ntoma ya RDC mpo na kopamela bokitisami na likambo ya JJ. Wondo mpo na bomeki “Coup d’Etat”

Marcel Malanga na Biblia na bosambisami ya komeka kokweyisa bokonzi na RDC, na boloko bwa N'Dolo, Kinshasa, 13 sanza ya libwa 2024.

Bakonzi ba ekolo Belgique babengisakii ntoma ya RDC na Bruxelles mpo na kopamela bokitisami na likambo ya moyi Belgique na nkombo ya Jean-Jacques Wongo na bosambisami ya baye bakangamaki mpo na komeka kokweyisa bokonzi na sanza ya mitano eleki na Kinshasa.

“Ntoma ya Ekolo Congo démocratique abengisamaki na lombango mpe masolo kati na bikolo mibale misalamaki mpe mazali kokoba,” alobi molobeli ya ministère ya mambi ma Bapaya ya Belgique na AFP.

M. Wondo azalaki kati na bangemi 37 baye baketelemaki etumbu ya liwa o’mokolo mwa mosala mitano moleki bosambisami na tribunal ya basaoda eye epesaki ekateli na yango na boloko ya basoda ya N’Dolo, na Kinshasa.

Expert miliaire, M. Wondo akomaki kosala wuta mwa ba sanza na misala mya bokengi ya RDC mpe afundamaki bo’ moto apesaki makasi ma komeka kosala coup d’Etat yango.

Bayi ekolo Amerika basato, moyi ekolo Grande-Bretagne moko na moyi ekolo Canada oyo azali lokola Jean-Jacques Wongo ya bomwana mboka ya mbotama ya RDC, bapesami mpe etumbu ya liwa kati bato 51 basamabaki.

Bakangami 14 batikamaki.

Mokambi ya diplomatie na Belgique Hadja Lahbib, o’mokolo mwa eyenga, ayebisaki na mokokani wa ye ya RDC, ministre ya mambi ma Bapaya Théèse Kayikwamba “botungisami ya makasi” ya ekolo na ye mpe asengaki ete makoki ma kosamba malamu masengeli kotosama, akomaki na X.

Na ngambo na ye, molobeli ya molakisi elongi ya lokumu ya mambi mama Bapaya ya Union européenne alobaki mpe UE emitunigisi mpe mpo na etumbu eye epesami.

“Belgique etelemelaki kaka te etumbu ya liwa kasi emipesa mpenza na bosilisami bwa yango na mokili,” alimboli “Ntoma ya Ekolo Congo démocratique abengisamaki na lombango mpe masolo kati na bikolo mibale misalamaki mpe mazali kokoba,” alobi molobeli ya ministère ya mambi ma Bapaya ya Belgique.

Molobeli ya ministère ya mambi ma Bapaya ya Belgique abakisi ete bayi Belgique “bakamwisami na bokweyisami na likambo ya M. Wondo na kotalaka makambo kaka ndambo maye malakisamaki na bosambisami.”